BUKU YA BWANYA 9:1-18

LOSOMBO LA SALOMO PONA KOZUA EWANYA ESENGELI NA MOKLISTO KOTANGA YANGO MIKOLO MINSO EZUAMI O BUKU YA BWANYA 9:1-18

Tokosenga na bino’te bosambela losambo eye mbala mingi okati ya mokolo moko mpe bokobela baye banso bazali na mposa na kozwa bwanya bwa nzambe.  Bokoki kozwa bisambo bisusa na adresse oyo: www.avemaria832.simplesite.com  Bolekisa adresse eye, soki ekoki, na bakristu basusu onzela ya bino ya facebook.

  1. E Nzambe wa bankoko yo mokonzi wa ngolo, okela mokili mobimba se na liloba lya yo,
  2. Na Bwanya bwa yo okelaki moto azala nkolo wa bikelamu bya yo binso.
  3. Ayangela mokili na bosantu mpe na bosembo mpe asambiso bato se na motema sembo.
  4. Pesa ngai bwanya boye bozali na yo esika yoko, olongola ngai o kati ya bana na yo te.
  5. Nzambi nazali moseleli wa yo, mwana wa moseleli wa yo, nazali moto motau, nakoumela mikolo mingi te, nazali na mayele te po nayeba bosembo mpe mibeko.
  6. Soko o kati ya bato banso moto moko abongi nye penza, kasi azangi bwanya bouti nay o azali moto pamba.
  7. Oponoki ngai nazala mokonzi monene wa bato bayo, zuzi wa bana bayo, babali na basi,
  8. Otindaki ngai natonga tempelo o ngomba ya yo esantu, natonga altare o mboka eye yo olingi kofanda, ezala lolenge la e na esantu obongisaki ito libandela,
  9. Bwanya bozali nayo, boyebi misala nya yo minso, bozalaki nayo ntango okelaki mokili, boyebi eloko nini ekosepelisa yo mpe eloko nini ekosspelira yo mpe aloko nini ekokani na mibeko mya yo.
  10. Kitise bwango uto likolo kuna musika tinda bwango uto ngwende ya yo ya nkembo mpo te bosalisa ngai mpe bolakisa nzela, bonge nayeba eloko nini ekosepelsa yo.
  11. Nzambi bwanya boyebi tina ya makambo manso, bokokamba ngai na bokebi, o misala mya ngai , bokobatela ngai na nkembo ya bwango.
  12. Mokolo mona okoyamba misala mya ngai malamu mpe nakosamba makambo ma bato na bosembo, nakobongo kofanda o ngwende ya Tata wa ngai.
  13. Moto nani akoki koyeba mokano mwa Nzambi? Nani akoki koyeba nini Nzambe alingi?
  14. Makanisi na bazo mazali ma botatabani mpe mikano mya biso mikobongwanaka aoki.
  15. Nzoto eye ya kokufa ekopesa molimo bozito, ndako eye ya libazi ekopekisa molimo kokanisa malamu.
  16. Bobele na pasi tokoyeba tina ya biloko bizali awa o nse, ata biye bizali penepene na biso, toyebi byango malamu te, bongo ndenge nini toyeba makambo mazali o likolo?
  17. Soko yo moko okabelaki biso bwanya te, mpe  soko otindelaki biso Elimo Santu wa yo te mbele nani akokaki koyeba makambo manso yo olingi?
  18. Bwanya bosemboli nzela ya bato ba nse, bolakisi bango mpo inso yo olingi, se bwanya bobikisi bango.